Makambo ya motuya mpo ete babimisa yo na ndako te
Bazali kobimisa yo na ndako? Obangi ekomela yo kala te?
Mpo na koyeba koleka na ntina ya ntomo na yo soki bazali kobimisa yo na ndako, yaka na séance ya information virtuelle elongo na avoka ya PTLA ba mardi nyonso na ngonga ya 9 heures.
Ebandeli
Mibeko ya Maine ezali polele mpenza na makambo mingi matali bafuti ndako (tanga koleka na maye matali ntomo ya bafuti ndako ya Maine, na section na biso etali bandako), mibeko ezali mpenza polele te, na ntomo ya bato bafandaka na ba motel, hotel mpe ba ndako ya ba chambres. Awa tokoyanola mituna bato bazalaka na yango mingi, na ntina ya bisika wana.
Nazali na ntomo ya kozwa mokanda ya préavis mpe audience epayi ya bazuzi?
Mingi mingi, ozali mofuti ndako te soki ofandaka na motel to mpe na hotel. Mokolo esika akoki kopesa yo préavis ya ntango moke mpe esengeli te ete akende epayi ya bazuzi. Kasi eyano ekoki kokesena soki ofandi kuna ntango molayi. Tanga koleka awa na se.
Soki ofandaka na ndako ya ba chambre, ozali mofuti ndako? Nini kasi, soki ofandaka na auberge, motel to mpe na gîte wuta ntango molayi? To mpe ofutaka na suka ya sanza, na esika ya kofuta mikolo nyonso? Mibeko elobeli mpenza makambo wana te. Mokolo esika akoki koloba ete ozali mofuti ndako te, mpo ete azali na "mokanda ya kosala auberge" to mpe azali mokonzi ya "auberge" oyo eyebani na letat. Kasi eloko mosusu eza te.
Soki mokolo esika azali kosala lokola mokolo motel to mpe auberge na:
- kopesaka ba draps mpe ba serviettes ya peto
- kokotaka na chambre na yo mpe kotyaka bopeto na chambre na yo
- kokomaka nkombo ya bato bakendeke mpe bayakaka nakati ya registre
- kotyaka ba talo ya ba chambres na kati ya ba chambres
- kofutaka moto afandaka na réception
- kopesaka ba chambres ya malamu mpenza
- kofutisika ba chambres kaka mpo na kofanda ntango moke
- kosalaka publicité ete ezali esika ya bato bazali kosala mobembo to mpe balingi bapema
elingi koloba ete, mingi-mingi ozali mofuti ndako te.
Kasi soki mokolo esika asalaka makambo wana te, mibeko ekoki kozwa ye lokola mokolo lopango. Elingi koloba ete, ozali na ntomo ya mofuti ndako, mpe bakoki kobimisa yo te, soki bapesi yo préavis te, elongo na motindo ya bazuzi.
Biloko misusu ya motuya ezali:
- mikolo boni ofandi kuna mpe mikolo boni bato misusu bazali kofanda na esika wana
- soki esika ya kolamba ezali
- mokanda ya bozweli esika wana, soki ozali na yango
Na yango, kozala na mokanda ya kosala "auberge" ekoki te. Soki mokolo esika azali kosala lokola azali mokolo lopango, mibeko ekozwa ye lokola mokolo lopango. Mpe mibeko epesaka bafuti ndako libateli koleka.
Soki ofandaka na hotel, motel, auberge, to mpe ndako ya ba chambres, mpe oyebi mpenza ntomo na yo te, benga Pine Tree Legal Assistance.
Nini kasi soki nabandaki kofanda kaka mikolo ndambo, kasi nakomi kofanda kuna mikolo ebele?
Ntomo oyo ezali polele mpenza na mibeko ya Maine, ezali ete ozali na ntomo ya kofuta ba "taxes ya utilisation" soki ofandi mikolo koleka 28. Mobeko wana ezali mpo na:
- ba hotels
- bandako ya ba chambres
- bisika ya ba touristes mpe
- bisika ya ba caravanes
Bisika wana esengeli bafutisa ba "taxes ya utilisation" na ba touristes mpe na bato oyo bazali kofanda tango moke. Kasi soki ofandi mikolo koleka 28, mokolo esika akoki te kokoba kofutisa yo taxe wana. Lisusu, mokolo esika asengeli azongisa yo mbongo oyo ofutaki mpo na ba taxes, na mikolo 28 ya liboso. Mobeko oyo ezali soki:
- ozali na ndako ya libelela te, to mpe
- otikaki ndako na yo mpo na mosala, to mpe mpo na kokende kelasi
Yeba koleka na ntina ya kozongisa mbongo ya "taxe d'utilisation" awa.
Esika nini nakoki kokende soki babimisi nga, mpe nazali na mbongo te?
Ozali na makoki mibale:
- Kende na biro ya engumba wapi ozalaki kofanda, to mpe wapi olingi kofanda mpe senga "Assistance Générale." Ezali mokano ekambami na bingumba nyonso nakati ya Maine mpo na kosunga bato bakoka kofuta makambo esengeli mpenza soki bazali mpenza na eloko te. Tanga mokanda na biso etali Assistance Générale na Maine.
- Bingumba mike nyonso ya maine, mpe bingumba ya monene misusu bazali na bandako ya lisungi mpo na bato bazangi ndako. Mpo na kozwa ndako ya lisungi ezali pene-pene na yo, benga Mikonzi ya bandako ya Maine.
Bana na nga bakoki bakoba kokende kelasi kino nazwa esika ya sika?
Bana na yo bazali na ntomo ya kokoba kokende kelasi, ata ozali na ndako te, to mpe ozali na ndako moko mpo na ntango moke.
Soki ozali kofanda na esika mpo na ntango moke (elongo na baninga to mpe bato ya libota, to mpe na motel, ndako ya lisungi to mpe camping), okoki kopona kotinda bana na yo na:
- kelasi na bango ya kala (soki okoleka ngonga moko te mpo na kokende kuna na motuka) to mpe
- kelasi na kati ya district scolaire oyo okomi kofanda.
Esengeli ete kelasi epesa bayokeli motuka. Soki bana na yo bazali kokende kelasi ya zinga-zinga, esengeli ete bakende na lombango, ata nanu batindi mikanda na bango ya kelasi te. Soki olongoli esika ofandaki ntango moke, mpo na kofanda na esika mpo na libelela, bana na yo bakoki kofanda na kelasi wapi bazali kino suka ya mbula ya kelasi, soki olingi. Soki ozali na mituna to mpe mikakatano na maye matali kelasi, benga KIDS Legal, mokano ya Pine Tree Legal Assistance.
Soki ozali na mituna koleka, benga Pine Tree Legal Assistance.